top of page

Ndeko molingami mobali mpe mwasi kati na Nkolo,

 

Nkolo apimi ngai ete na Sala bilili oyo, mpo na kotiya na motuya liloba na Nzambe mpe nakabolela bino.

Nakati na siti oyo bokomona maloba ebele na lolenge ya bilili ya mosakoli William Branham oyo Nzambe atindeli ngai na yo na ntango oyo mpona kolobela biso mpe kolengele biso mpona boyeyi naye ya mibale. Malob'oyo etiyemi na bilili yango elimbolami na minoko ebele mpe esalami na lolenge ya bilili mpe mamona (vidéo).

Na poni malob'oyo etiyemi na bilili na botangi mikanda ya mosakoli, ntango nayokaka mateya ya mosakoli, ntango nakotaka na siti ya la voix de Dieu mpe ntango nayokaka bateyi koteyaka na eklezia.

Bokomona likolo ya lokasa oyo bilili ya suka oyo to tiye mpe na nse likonga oyo eko mema bino esika bilili nyoso ezali. Na menu (esika manso ezali), na eteni ya vidéo (mamona), makoki oyo eko mema bino yengebene na minoko  oyo ekeseni na esika tobongisi maloba ya mosakoli na lolenge ya bilili koninganaka.

 

Bokokoki koyebisa biso bosenga na bino, ba toli na bino na eteni ya : Contact (bokutani) mpe na nzela ya lokasa na ngai ya facebook.

NZAMBE APAMBOLA BINO

 

Ndeko Mikaël

Mpona komona bilili manso

Unknown Track - Unknown Artist
00:00 / 00:00
bottom of page